Maman by Papa Wemba Mp3 Download
Get this song by Papa Wemba titled Maman. Jules Shungu Wembadio Pene Kikumba ONH (14 June 1949 – 24 April 2016), known professionally as Papa Wemba (French pronunciation: [papa wɛmba]), was a Congolese singer and musician who played Congolese rumba, soukous, and ndombolo. The song will make your playlist if love good music.
Use the link below to stream and download Maman by Papa Wemba.
Lyrics Of Maman by Papa Wemba
Eleki elingi koleka ba mbeto nionso nga na lala
Maman soki ozalaki kaka na bomoyi
Mbele na sengi zongisa nga susu wana
Jamais olingaki nga na lela yo seka
Jamais olingaki yo lala nga na lamuka
Soki na beli ozalaki kotana tongo nsa
Banda y’okenda nakoma abandoné
Recompense nayo nako pesa nani yango?
Ata na leli nani ako dorloter nga, a-a-ah
Yango na yembeli yo zembo oyo Maman Niondo
Eleki ba recette nionso ya ba cordon bleu nga na lia
Ata mafuta, tomate ezalaki te, oh
Kasi yango elakaka nde mosuni n’élengi
Banda y’okenda appétit esila nga-ah
Nakoma ko lia kaka
Po na sepelisa nde monoko, eh-eh
Ezanga bulletin mpe minerval
Kasi eleki ba leçons ba maitres
Ba professeurs ba pesa ngai
Maman soki ozalaki kaka na bomoyi
Mbelé na sengi batia yo ministre y’éducation
Mbele ba parquets, ba prison nionso bakanga
Mbelé kutu motu mabé azali té, eh
Mpo jour y’anniversaire na nga ekomi pene
B’invités bako lia bako mela masanga
Yo kutu artisan na ngai y’ozali te
Epayi y’ozali soki okutani n’occasion eh
Tindela nga carte de voeux, ata fololo
Normalement fêti ya lelo ezali ya yo, eh
Serment d’Hippocrate ba médecins ba kosalaka
Ya nga serment y’ozala toujours Maman ngai
Ata ba bandeli mokili soki mbala zomi
Ya nga serment y’ozala toujours Maman ngai
Mpo jour y’anniversaire na nga
Ekomi pene Maman
B’invités bako lia bako mela masanga, woh-woh
Yo kutu artisan na nga y’ozali te, Maman
Tindela nga carte de voeux, ata fololo
Esengo na nga ekozala multiplier fois deux
Normalement fêti ya lelo ezali ya yo
Serment d’Hippocrate ba médecins ba kosalaka
Ya nga serment y’ozala toujours Maman ngai
Ata ba bandeli mokili soki mbala kama eh
Ya nga serment y’ozala toujours Maman ngai
Mbele na sengi zongisa nga susu wana, o-oh
Mbele na sengi zongisa nga susu wana