Madilu System – Frere Edouard

                       DOWNLOAD SONG 

Frere Edouard by Madilu System Mp3 Download

Get this song by Madilu System titled Frere Edouard.  Jean de Dieu Makiese, popularly known as Madilu System, was a Congolese rhumba singer and songwriter, born in what was then Léopoldville, Belgian Congo. The song will make your playlist if love good music.

Use the link below to stream and download Frere Edouard by Madilu System.

Lyrics Of Frere Edouard by Madilu System

Ha, ha, ha, ha, Frere Edouard
A pimelaka moto ko seka na ko lela te, Frere Edouard

Soki ngolo ayebisi yo que ngando aza malade
Ndimela ye oh, po bango nyoso ba vandaka na mayi

Butu eko komaka eh

Tongo pe eko tanaka eh, ba mama ba ko lamuka na tongo
Ko luka mapa na boulangerie
Bango nde ba ko lamusaka biso, tongo esi etani

3) Ba mama ya mapa
Kinshasa a bosana bino eh
Que bino bato bo lamusaka biso na tongo

Po ba ndeke na ba soso ba bandaka ko lamusa
Biso na tongo, Ba bunga oh

4) Nga, Diesa, na botama na nga mokolo ya eyenga ah
Yango mpe na mesana ko sambela
Mikolo minso ya lomingo
Na pokwa nga na mesana ko kende messe na nga
Po nalula Nzambe eh

Instrumental

5) Nakomi na ndako ya Nzambe
Frere Edoire a luli nga na miso ya bato
A beleli na miso ya ba ndimi ngai
Mwasi naye ya molimo
Na tika mibali nyoso ya misuni

6) Na landi nanga lokuta ya Frere Edouard
Nakomi na ndako ya Frere Edouard

Frere Edouard alobi na lata robe ya molayi
Na tiya kitambala na moto
Frere Edoure okamwisi nga

7) Ah ngai, Liya, mawa ah
Frere Edouard,
Olulaki ngai na ndenge na ngai te Frere Edouard
Boni yo moyimi boye
Olingi ba tala nga na ndeko mosusu te

8) Kaka yo moko
Nayebi nyoso naza mwasi nayo
Obangaka nini, Frere Edouard
Pesa nga confiance lokola na mi pesa na molimo

9) Ba ndimi eh
Eloko na monaka Frere Edouard mabe
Soki ba paya ba ye na ndako
To ya famille na ngai, to ya famille naye

10) Oko mona Frere Edouard akomi mawa mawa
Lokola mwana ya moke ya 5ans
Nanu azwi petit déjeuner na tongo te
Eh, ba frere na ba soeur
Surtout kanda ezalaka na Frere Edouard

11) Ko meka ata senga ye sucrée
Te na sombela ba paya
Wana oko mona Frere Edouard abimiseli yo bible
Bo tanga esika moko
Et puis eloko mosusu, ezalaka na Frere Edouard

12) Soki akangeli yo kanda
Eza lokola moto ba kangi ye na menotte na ba police

Ah, nga, Liya eh
Nga moto nazalaka mwasi ya elongi elengi

Ha, ha, ha, ha,

13) Lelo nakomi lokola safu oyo eyindi na nzete
Batu kutu ya misuni ba koma ko kamwa ngai
En fin, nayebi te
Soki ba frere nyoso ba zalaka obe boye oh
Ha, ha, ha, ha,

14) Na voiture nayo
Autocollant nyoso ba koma grace a Dieu
Na ndako na biso
Mur nyoso photo ya Yesu

15) Na maboko naye oh
Chapelet ezangaka te, Frere Edouard
Yekola ko kaba, yekola pe ko limbisa bato ngo oh

Instrumental

16) Kake ebetaka likolo oh
Ebomaka nango bato nyoso te oh
Tango mosusu eko boma mobali
Etiki mwasi na bana

17) Mabe toko salaka o se, eko futamaka o se

Bolamu toko salaka o se
Eko futamaka o likolo
Frere Edouard yekola ko kaba
Yekola pe ko limbiso bato eh

Download Mp3 Here

Leave a Reply

Your email address will not be published. Required fields are marked *

Next Post

Madilu System - Juste Un Peu D'amour

Thu Jan 30 , 2025
                       DOWNLOAD SONG  Juste Un Peu D’amour by Madilu System Mp3 Download Get this song by Madilu System titled Juste Un Peu D’amour.  Jean de Dieu Makiese, popularly known as Madilu System, was a Congolese rhumba singer and songwriter, born in […]

You May Like

2Face Dibia 9ice Adekunle Gold Akon Asa Asake Ayra Starr Bella Shmurda Blaqbonez Burna Boy CKay Davido DJ Mix Duncan Mighty Erigga Falz Fireboy DML Flavour Frank Edward Harmonize Kizz Daniel Naira Marley Odumodublvck Olamide Omah Lay Oriental Brothers Osita Osadebe P-Square Patoranking Phyno Portable Rema Ruger Seyi Vibez Shatta Wale Simi Stanley Okorie Throwback Songs Timaya Tiwa Savage Umu Obiligbo Waje Wizkid Yemi Alade Zlatan

<